Mark 9

1Bongo Yesu alobaki na bango :

—Nalobi na bino ya solo, bato mosusu batelemi awa bakokufa tekino bamona Bokonzi ya Nzambe koya na nguya.

Yesu abongwani

(Mt. 17.1-9 ; Lk. 9.28-36)

2Sima ya mikolo motoba, Yesu akamataki Piere, Zaki mpe Jean, amemaki bango likolo ya ngomba moko ya molayi, epai bazalaki kaka bango moko. Bongo Yesu abongwanaki na miso na bango ; 3Bilamba na ye ekomaki kongenga mpe ekomaki pembe makasi, na ndenge ete moto moko te na mokili akoki kokomisa yango pembe ya ndenge wana. 4Bongo Eliya na Moyize babimelaki bango ; mpe babandaki kosolola na Yesu.

5Piere alobaki na Yesu :

—Moteyi
Moteyi  : to Rabi.
, ezali malamu mpo na biso ete tozala awa. Tosala bandako misato ya kapo : moko mpo na yo, moko mpo na Moyize, mpe moko na Eliya.

6Ayebaki te soki aloba nini, pamba te batondaki na kobanga.

7Bongo lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango. Mpe mongongo moko ewutaki na lipata :

—Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, boyokela ye !

8Kaka na tango wana, tango batalaki epayi na epayi, bamonaki moto moko te, kaka Yesu ye moko elongo na bango. 9Awa bazalaki kokita ngomba, Yesu apekisaki bango ete makambo oyo bamonaki baloba yango na moto ata moko te, kino Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi. 10Babombaki likambo yango na motema, mpe bazalaki kotia tembe bango na bango soki “kosekwa kati na bakufi” elingi koloba nini.

(Mt. 17.10-13)

11Bongo batunaki Yesu :

—Mpo na nini balakisi ya Mibeko balobaka ete Eliya asengeli koya liboso ?

12Yesu azongiselaki bango :

—Ya solo, Eliya asengeli koya liboso mpe kobongisa makambo nyonso. Mpo na nini ekomama ete Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi mpe kotiolama ?

13Kasi nazali koloba na bino, Eliya asiʼaya, mpe basalaki ye nyonso oyo bango balingaki, ndenge ekomama mpo na ye.

Yesu abikisi mwana oyo azali na molimo mabe

(Mt. 17.14-21 ; Lk. 9.37-43)

14Tango bakomaki epai ya bayekoli mosusu, bamonaki bato ebele bazingaki bango, mpe balakisi ya mibeko bazalaki kotia tembe na bango. 15Noki penza tango bato nyonso bamonaki Yesu, bakamwaki mingi, mpe bakimaki mbango mpo na kopesa ye mbote.

16Yesu atunaki bango :

—Likambo nini yango bozali kotiana tembe na bango ?

17Moto moko na kati ya ebele ya bato azongiselaki ye :

—Moteyi, namemelaki yo mwana na ngai ya mobali oyo azali na molimo oyo ekomisa ye baba.
18Epai nyonso molimo yango ekangaka ye, ebwakaka ye na mabele, mwana abandaka kobimisa fulu-fulu na monoko, kolia mino, mpe nzoto na ye ekangamaka. Nasengaki bayekoli na yo babengana molimo yango, kasi bakoki te.

19Bongo Yesu alobaki na bango :

—Bato bazangi kondima ! Nakovanda na bino kino tango nini ? Nakokanga motema mpo na bino kino tango nini ? Bomemela ngai ye !

20Bongo bamemelaki ye mwana yango. Tango molimo emonaki Yesu, kaka na tango wana eningisaki mwana makasi penza. Mwana akweyaki na mabele, azalaki kobaluka-baluka mpe monoko na ye etondaki na fulu-fulu.

21Yesu atunaki tata ya mwana : Banda tango boni pasi oyo ekomeli ye ?

Azongisaki :

—Banda bomwana na ye.
22Mpe mbala mingi molimo yango ebwakaka ye na moto to na mayi mpo na koboma ye. Kasi soki okoki kosala eloko moko, yokela biso mawa mpe salisa biso !

23Yesu alobaki na ye :

—Soki okoki ! Eloko nyonso ekoki kosalama mpo na moto oyo andimi.

24Kaka na tango wana, tata ya mwana alobaki na mongongo makasi :

—Nandimi ; salisa ngai na kozanga kondima na ngai !

25Tango Yesu amonaki ete ebele ya bato bazalaki koya mbangu epai likambo yango ezalaki kosalama, agangelaki molimo mabe, alobaki :

—Molimo oyo ekomisaka baba mpe ebomaka matoyi, napesi yo motindo : o bima na mwana oyo mpe kozongela ye te !

26Molimo mabe egangaki, eningisaki mwana makasi penza, bongo ebimaki. Mwana akomaki lokola akufi, na ndenge ete bato mingi bazalaki koloba : “Akufi”.

27Kasi Yesu akamataki ye na loboko mpe atelemisaki ye, bongo mwana atelemaki.

28Tango Yesu akotaki na ndako, bayekoli na ye batunaki ye na esika ya bango moko kaka :

—Mpo na nini tokokaki te kobengana molimo wana ?

29Bongo Yesu azongisaki :

—Molimo ya ndenge oyo ekoki kobima kaka na mabondeli
Mikanda mingi ya kala ebakisaka : “mpe na koboya kolia mpo na mabondeli”
.

Yesu ayebisi lisusu liwa mpe kosekwa na ye

(Mt. 17.22-23 ; Lk. 9.43-45)

30Balongwaki esika wana mpe bakatisaki mokili ya Galileya. Mpe Yesu alingaki te ete moto ata moko ayeba esika bazalaki. 31Pamba te azalaki koteya bayekoli na ye. Azalaki koloba na bango :

—Bakoteka Mwana na Moto na maboko ya bato. Bakoboma ye, mpe akosekwa sima ya mikolo misato.

32Kasi bazalaki kososola te tina ya maloba wana, mpe bazalaki kobanga mpo na kotuna ye yango.

Nani azali moto monene na Bokonzi ya Likolo

(Mt. 18.1-5 ; Lk. 9.46-48)

33Bongo bakomaki na Kapernawumi. Tango Yesu azalaki na kati ya ndako, atunaki bango :

—Likambo nini yango bozalaki kotiana tembe na nzela ?

34Kasi bavandaki nyee, mpo na nzela bazalaki kotiana tembe bango na bango mpo na koyeba soki nani na kati na bango aleki monene. 35Yesu avandaki, abengaki bapostolo zomi na mibale mpe alobaki :

—Soki moto alingi kozala moto ya liboso, esengeli azala moto ya suka penza, mpe azala mosali ya bato nyonso.

36Bongo akamataki mwana moke mpe atelemisaki ye na kati-kati na bango. Akamataki ye na maboko na ye, mpe alobaki na bango :

37—Moto nyonso oyo akoyamba, moko ya bana mike oyo na kombo na ngai, ayambi ngai ; mpe moto nyonso oyo ayambi ngai, ayambi ngai te, kasi ayambi moto oyo atindaki ngai.

(Lk. 9.49-50)

38Bongo Jean alobaki :

—Moteyi, tomonaki moto moko azalaki kobengana milimo mabe na kombo na yo, mpe tolobaki na ye atika, mpo azali na biso elongo te.

39Kasi Yesu alobaki :

—Bopekisa ye te, pamba te moto moko te oyo asali likamwisi na kombo na ngai, bongo akoki sima ya mwa tango moke koloba likambo ya mabe mpo na ngai.
40Pamba te, oyo ayinaka biso te azali mpo na biso. 41Nalobi na bino ya solo, moto oyo apesi bino kopo ya mayi na kombo na ngai, mpo bozali bato ya Kristo, akobungisa lifuti na ye te.

42Soki moto akweyisi na masumu mwana moko na kati ya bana mike oyo bandimaka ngai, ezali malamu mpo na ye, bakanga ye na kingo libanga moko ya monene, mpe babwaka ye na ebale. 43Soki loboko na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango. Ezali malamu mpo na yo okota na bomoi na loboko moko, na esika ya kozala na maboko mibale, mpe kokende na lifelo, epai moto ekufaka te. 44[Kuna, misopi na bango ekokufa te mpe moto ekokufa te.]
Mikanda misusu ya kala ezangi verset oyo.
45Soki lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango. Ezali malamu mpo na yo okota na bomoi na lokolo moko, na esika ya kozala na makolo mibale mpe kobwakama na lifelo, na moto oyo ekufaka te. 46Kuna, misopi na bango ekokufa te mpe moto ekokufa te
Mikanda misusu ya kala ezangi verset oyo.
.
47Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango. Ezali malamu mpo na yo okota na Bokonzi ya Nzambe na liso moko, na esika ya kozala na miso mibale, mpe kobwakama na lifelo, 48Kuna misopi na bango ekokufa te mpe moto ekokufa te. 49Pamba te moto ekokomisa moto nyonso elengi lokola mungwa ekomisaka biloko elengi. 50Mungwa ezali malamu ; kasi soki ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokoki kokomisa yango lisusu elengi ? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia moko na moko.
Copyright information for LinMNB